Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biden apusi mobembo alingaki kosala na Angola na Allemagne


President Joe Biden ya Ekolo Amerika apesi mbote na mokonzi ya Angola Joao Manuel Goncalves Lourenco na bureau Oval, Washington, U.S., Sanza ya zomi na moko 30, 2023. REUTERS/Evelyn Hockstein
President Joe Biden ya Ekolo Amerika apesi mbote na mokonzi ya Angola Joao Manuel Goncalves Lourenco na bureau Oval, Washington, U.S., Sanza ya zomi na moko 30, 2023. REUTERS/Evelyn Hockstein

Joe Biden, mokonzi oyo azali na ebonga na Ekolo Amerika, asakoli ete ezongisi nsima mobembo esengalaki asala Allemagne mpe na Angola.

Kolanda ndako ya bokonzi to Maison, président Biden azwi mokona mwango mpo Ouragana to mopepe makasi mbengami Milton ezali kopusa pene na ekolo na ye.

Mokambi atali mambi ma nsango ya Ndako ya bokonzi to Maison Blanche, Karine Jean-Pierrre asakoli ete Joe Biden alingi akamba mabongisi mpe eyeno na ouragana Milton na kobakisa na eyano eye ezali kokoba kopesaman na mbeba eye ouragan mosusu ebengamaki Helene ewuti kosala mposo moleki na Sud-est ya ekolo.

Nzokande bakonzi ba etat ya Floride bazali kokoba kobeta mbela Makasi mpo ete bavandi balongwa bisika ba bango na bobangi etat ouragan Milton esala mbeba Makasi. Soki botikali bokokufa, ekebisi bakonzi.

Mopepe Helene esiki ebebisaki biloko mingi mpe ebomakai bato mikolo zomi mileki.

Mobembo ya Joe Biden na Angola ekozala mingi mpo na kopesa makasi na boyokakni mpe kotala misala mya bobongizi nzela ya engunduka mpo na kobimisa makele na kowuta Zambie, RDC kino libongo linene lya Lobito na Angola.

Akosolola mpe mpo etali kimya na etuka eye mpo Angola ezali kobondisa matata kati na RDC na Rwanda mpe kolandela botali bwa mbeba inso na bitumba biye.

Kinshasa na Kigali bakoki te kotia manzaka mpo na kimya na suka ya mposo moleki.

Kinshasa ezali kosenga bolongwi na kozela te ya mampinga ma Rwanda na mabele ma Congo mpe botiki lisungi na batomboki ba M23 baye RDC efundaka Rwanda kopesa maboko.

Kigali nde efundaka Kinshasa kopesa mapoko na batomboki ba Rwanda ba FDLR mpe kosenga botiki botindi koyina ba tutsi.

XS
SM
MD
LG